-Mayekoli ya Bibilia-
-Biteni motoba ya Lobiko-
-Lisanga ya Lingomba ya Molimo Santu-
I Bililia ezali Maloba
ya Nzambe
1. 2 Pi. 1:20-21; 2. Tim 3:16 soki Bato bazalaki koloba na Kombo ya Nzambe.
2. Yoane 20:30-31 "...Po bino bondima te Yezu azali Mesia."
3. Koyebisa ba. 22:18-19. Liloba ya Nzambe okoki kobakisa te pe kolongola
te.
4. Ba. EB. 1:21 "Nzambe alobela Bato nbala na nbala na Baprofete.
5 Yoane 1:1 "Na ebandeli ezalaki Liloba."
6. Koyebisa ba. 1:3 +19. "Esengo na Moto oyo azali kotanga Liloba ya
Nzambe."
7. Gal. 1:8-9 "Soki Moto amemeli bino Sango Malamu ekeseni na oyo bozuaki
liboso, lisumu na ye..."
II Moto nionso akoki kokutana na Nzambe, soki aluki ye na motema moko.
1. Misala 17:26-31 (27) - "Azali mosika te na Biso."
2. Det.4:29-31 "Soki oluki ye na motema na yo mobimba okokutana na ye."
3. Es. 55:6-7 "Boluka Nzambe tango azali komonana."
4. Jr. 29:13-14 "Soki bokoluka ngai bokokutana na ngai."
5. Mark 11:22 "Botia mitema na Nzambe."
6. Am. 5:4 Boluka Ngai po Bozala na Bomoi."
7. Luk.12:31 "Bolukaka kaka kokoma Bato ya mboka na ye, bongo ye akopesa
bino yango."
8. Mat. 7:7-8 "Bosenga pe Bokozwa; Boluka Bokomona; Bobeta..."
III Nzambe azali koluka, Bato oyo balingi kondimela
ye (Liloba na ye). Ye akofuta ba oyo bazali koluka ye na ba oyo balingi koya
epai na ye.
1. 2 Chron. 16:9 "Nzambe ati miso na ye na mokili mobimba pona kopesa
makasi..."
2. Yoane 4:23 "Bandimi ya solo bakokumisa Nzambe na Molimo pe na solo...
Ezali bandimi ya lolenge wana nde Nzambe azali koluka..."
3. Ba EB 11:6 "Nakozanga kondima (kondima ya solo ya liloba) tokosepelisa
ye te."
4. Mat. 11:28-30 Boya epai na ngai bino nionso oyo bolembi pe bozali na mikumba?
5. Yoane 4:49-51 Kondimela Yezu ememaka mapamboli.
6. Luk. 19:10 "...Ngai Nwana ya Moto nayei koluka pe kobikisa Bato oyo
babunga..."
7. Misala 10:4+34-35 "Nzambe andimi losambo na yo...pe akaniseli yo."
IV Yezu Krisu azali ye moko oyo tondimela.
1. Kolose 1:15-22 Kristu azali elili ya Nzambe oyo amonanaka te.
2. 1 Tim. 2:5 Yezu azali moko oyo ati biso na boyokani na Nzambe.
3. Yoane 7:38 Moto oyo andimeli ngai, Mai ya Bomoi ekobanda kobima na motema
na ye lokola ebale; ndenge ekomama.
4. Yoane 8:24 "Jango wana nalobelaki bino bokokufa na masumu na bino,
soki boboyi kondima (nazali Masiya)."
5. Luk. 2:11 Na butu ya lelo baboteli bino Mobikisi na Mboka ya David.
6. Yoane 8:12 "Nazali Mwinda ya Mokili..."
7. 2. Korent 5:18 "...oyo azongisi biso na bondeko, na ye pona Kristu..."
V Mitindo nini Yezu atikeli Bayekoli pe Bateya
nini?
Soki Nzambe na tango wana ya kala abikisaki
Bato na Sango malamu, sango wana ya malamu yango pe ekobikisa biso. Yango
wana ebongi toyeba sango malamu nini:
1. Mitindo: Mat. 28:19-20; Mark 16:15-19; Luka 24:46-47; 1 Korent. 15:1-5.
2. Sango malamu ya Lobiko ezali kaka moko: Gal 1:8.
3. Tondimela Yesu: Misala 1:8 ..."Bokozala Basakoli na nga. "4:12
Kombo mosusu ezali te."
4. Misala 17:30..." Nzambe azali kosenga na Bato nionso babongwana.
5. Bolimbisi ya masumu na nzela ya Batisimo na Kombo na Yezu: Misala 2:38;
8:16; 10:48
6. Batisimu ya Molimo Santu: Yoane 1:33; Misala 2:2-4 na 38-39; 8:17; 10:44-46;
19:6
7. Misala 5:32 "Bongo atindi biso tosakola makambo wana, biso na Molimo-Mosantu
oyo Nzambe apekasi na bato batosaka ye.
VI Motuna: Bozali nakondima ya makomi Sango malamu?
Makomi ezali kosenga na biso toluka Lobiko tango tozali nano na tango.
Tozali komona, Moto azali na Elikya ya Lobiko, soki azali na botosi ya liloba
ya Nzambe.
1. Mark 16:16 Moto oyo akondimela ngai pe akozwa Batisimo, akobika. Kasi oyo
akondimuela ngai te akozwa etumbu.
2. Mat 24:14 ..."Bakosakola Sango malamu... bongo na tango wana suka
ekoya."
3. 2 Thess 1:6-10 "Pona kopesa etumbu na ba oyo bayebi Nzambe te pe ba
oyo bazali kotosa liloba te,
4. Josue 24:15 " Bopona lelo nani bolingi kosalela, soki banzambe ya
bikeko oyo batata na bino bazalaki kosalela na ngambo ya ebale, to banzambe
ya Ba Amorens, na mboka oyo bozalaki kowanda. Ngai na libota na ngai tokosalela
Nzambe"
5. Misala 2:37 "...Tosala nini?"
Misala 8:36b "...Mai
yango oyo, eloko nini ekopekisa ngai nazwa Batisimo?"
Misala 16:30 "...Nasala nini po nazwa lobiko?"
http://www.sayadi-al-nas.com |